Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili.
Bato ya Isalaele bakangaki kati na bandeko na bango bato nkoto nkama mibale : basi, bana mibali mpe bana basi ; bazwaki bomengo ebele ya bitumba mpe bamemaki yango na Samari.
Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.
Banguna na ye bakomi bakonzi na ye, bayini na ye bazali na esengo ; pamba te Yawe atindeli Siona pasi likolo ya ebele ya masumu na ye. Bana na ye ya mibali bakei na bowumbu, bakangi bango mpe bazali kotambola liboso ya monguna na ye.
Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ashipenazi, mokonzi ya bakalaka na ye ya lokumu, ete ayeisa na Babiloni ndambo ya bana ya Isalaele oyo babotama na mabota ya bakonzi to ya bato ya lokumu,
Bomikokola suki na mito mpo na bana na bino ya mibali oyo bolingaka, ndenge esalemaka na matanga. Bomikokola suki na mito mpe botikala mabandi lokola mpongo, pamba te bakomema bango na bowumbu mosika na bino.
Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te.