Deteronomi 28:37 - Mokanda na Bomoi37 Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.
Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. Tika ete baloba : « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola to eloko ya maseki kati na bikolo. Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba : ‹ Wapi Nzambe na bango ? › »