Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:36 - Mokanda na Bomoi

36 Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:36
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu bato oyo batikalaki kati na engumba, bato oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni mpe bato mosusu oyo batikalaki.


Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.


Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.


Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, mpe bakomisaki ye mokonzi, na Yelusalemi, mpo na kokitana na tata na ye.


Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori.


Nabukodonozori amemaki na Babiloni bato oyo babikaki na mopanga, akomisaki bango bawumbu na ye mpe ya bana na ye ya mibali kino na tango mokili ya Persi ezwaki bokonzi.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.


« Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »


Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino kati na mokili oyo botikala ata koyeba te, pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto oyo ekotumba bino. »


Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›


Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu libwa na bokonzi, na sanza ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.


Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »


Bikuke na yango ezindi na mabele ; abuki-buki mpe abebisi banzete oyo bakangelaka bikuke yango. Mokonzi mpe bakambi na ye bakei na bowumbu kati na bikolo, Mobeko ezali lisusu te, mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te bimoniseli kowuta na Yawe.


Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »


nakobengana bino na engumba oyo, nakokaba bino na maboko ya bapaya mpe nakopesa bino etumbu.


Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko.


Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.


Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana.


Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.


Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te.


Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ