Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo.
Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ; na esika ya mokaba, ekozela nde singa ; na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ; na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ; na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.
Anjelu ya liboso akendeki mpe asopaki kopo na ye na mokili, mpe bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na banzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango.