32 Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te.
Yango wana batata na biso bakweyaki na mopanga ; mpe yango wana lisusu bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi mpe basi na biso bazali kati na bowumbu.
Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.
Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli, nazali komitungisa, libumu na ngai ezali kobaluka, motema na ngai ezali kotungisama mpo ete bato na ngai babebisami, mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.
Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.
Bongo yo, mwana na moto ; na mikolo ekoya, nakobotola bandako na bango oyo batonga makasi mpe batielaka motema, oyo esalaka esengo mpe lokumu na bango, oyo esepelisaka miso na bango mpe esalaka esengo ya mitema na bango ; nakobotola lisusu bana na bango ya mibali mpe ya basi.
Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
Oh Siona, mboka kitoko, lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ! Pamba te sik’oyo, okobima na engumba mpe okovanda kati na zamba, okokende kino na Babiloni ; mpe kuna, Yawe akokangola yo na maboko ya monguna na yo.
Oh Moabi, mawa na yo ! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami ! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.
Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te ; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino ; mpe moto moko te akosunga bino.
Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba.