Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:29 - Mokanda na Bomoi

29 Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:29
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange ; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.


Mpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. »


mpo ete batepatepa kati na molili, na kozanga pole ; mpe asalaka ete batepatepa lokola moto alangwe masanga.


Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba.


Tozali kosimbasimba mir mpo na kotambola lokola bakufi miso, tozali kobanga kotambola lokola bato bazanga miso ; tozali kobeta mabaku na moyi makasi lokola nde tozali na butu makasi, tozali na nzoto kolongono kasi tokomi lokola bakufi.


Eh basi, boyoka Liloba na Yawe ! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.


Bakomaki sik’oyo koyengayenga na babalabala lokola bakufi miso, bakomaki mbindo na makila mpe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.


Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili,


Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango.


Nakotindela bato pasi ya makasi : bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga, pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ; bakopanza makila na bango lokola putulu mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.


Zwa bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka na tina na yo ezali ya lokuta, mpe bakososola ete yo moko mpe otosaka Mobeko.


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.


Mibu zomi na mwambe, banyokolaki bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na ngambo mosusu ya Yordani, mokili ya bato ya Amori, kati na Galadi.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia.


Bana ya Isalaele bazalaki na se ya bokonzi ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mibu zomi na mwambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ