Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:27 - Mokanda na Bomoi

27 Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito : pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:27
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

azokisaki banguna na Ye na sima, wana bazalaki kokima, ayokisaki bango soni ya libela.


Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele.


Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito.


Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. »


Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata mpe akotika bango bolumbu. »


moto oyo azali na kunki na mokongo to oyo azali penza mokuse ; moto oyo azali na liso ekufa, na makwanza, na mapalata to oyo baboma mokongo.


« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.


Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo ; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.


Yawe akobatela yo na bokono nyonso, akobwakela yo ata bokono moko te oyo yo oyebaki te na Ejipito, kasi akokweyisa yango likolo ya bayini na yo.


Bato oyo bakufaki te bazwaki bokono ya pota ya libumu, mpe koganga ya engumba emataki kino na likolo.


Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu.


Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ