Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:24 - Mokanda na Bomoi

24 Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo ; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:24
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore.


Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.


« Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore ; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma.


noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango ; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino.


Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.


Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ