Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino : fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino : kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:22
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili.


Tango nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko ekokota kati na mokili, tango banguna bakozingela bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango ; tango pasi to bokono ya lolenge nyonso ekokweyela bango,


Soki nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko eyei kati na mokili, soki banguna bazingeli bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango, to soki pasi to bokono ya lolenge nyonso ekweyeli bango,


Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.


« Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »


tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.


« Mbala mingi, nazalaki kobwakela bilanga na bino bokono, banzete na bino ya ble mpe ya vino ekomaki kokawuka ; bongo mabanki ekomaki kolia banzete na bino ya figi mpe ya olive. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Nabengaki bokawuki na bilanga, na bangomba, na ble, na vino, na mafuta, na mbuma nyonso ya mabele, na bato, na bibwele mpe na mbuma nyonso ya mosala na bino. »


Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe.


Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »


Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi : Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi ; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango.


Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te.


Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ