Deteronomi 28:21 - Mokanda na Bomoi21 Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo soki batuni yo : ‹ Tokende wapi ? › Zongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi ! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu ! ›
« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.