Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kati na nyonso oyo bokosala, Yawe akotindela bino bilakeli mabe, minyoko mpe mikakatano ; bongo bokowumela te mpo na kobebisama nye likolo ya mabe oyo bosalaki ya kosundola Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:20
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi, eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka, yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.


Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai, abikisaka bato ya sembo.


Tango makambo nyonso oyo ekoya, ekobebisa bino ; pamba te ekoleka na tongo nyonso, na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi.


Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka ; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »


Bana na yo balembi, balali-lali na babalabala nyonso lokola mboloko oyo ekangami na motambo ; kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo nde ebuki-buki bango lolenge wana.


Tala, Yawe azali koya na moto, mpe bashar na Ye ezali lokola mopepe ya kayina ; akokitisa kanda na Ye na somo penza mpe akopamela na nzela ya moto.


Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki : basundolaki Ngai, bakomaki kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu, mpe bakomaki kogumbamela banzambe oyo basalaki na maboko na bango.


Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,


Bokokufa kati na bikolo ya bapaya mpe mokili ya banguna na bino ekolia bino.


Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.


Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.


Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.


soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. »


Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi.


Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba ; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ