Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joziasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.


Tosalaki solo mabe makasi liboso na Yo ; totosaki te mitindo, bikateli mpe mibeko oyo opesaki na nzela ya Moyize, mosali na Yo.


Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo : « Tala nzela yango oyo ! »


Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango,


Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino ; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu.


Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.


Boyika mpiko mpe bosenzela mpo na kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize ; bokende libanda na yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ