Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:13 - Mokanda na Bomoi

13 Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te ; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boyemba na esengo mpo na Jakobi, boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso ! Batatola, bosanzola mpe boloba : ‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo, bato ya Isalaele oyo batikali. ›


Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.


Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela ; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango.


Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo ; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili.


Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ;


akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te ; akozala moto, kasi bino bokozala mokila.


Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ