Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 28:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 28:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya : « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. »


Boni, osila kokoma na esika oyo babombaka mvula ya pembe mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ?


Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.


Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.


Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli.


nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.


nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.


Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.


Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te ; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba.


Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.


Okoki te kozwa mileki epai ya ndeko na yo tango odefisi ye mosolo, bilei to eloko mosusu oyo ekoki kobota mileki.


Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo ; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino.


akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te ; akozala moto, kasi bino bokozala mokila.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ