Deteronomi 28:11 - Mokanda na Bomoi11 Yawe akotondisa bino na bozwi ebele : mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino : milona na bino, vino ya sika mpe mafuta ; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.