Neyemi alobaki na bango lisusu : — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.
Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.
Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.
Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.
Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.
Okozala na esengo na feti yango : yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo.
Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,
mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.