6 Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba.
Mpo na kotonga Tempelo, basalelaki kaka mabanga oyo ebongisamaki malamu wuta na esika oyo bapasolaki yango ; boye, esalaki ete makelele ya marto, ya epasola to ya esalelo mosusu ya ebende etikalaki koyokana te wana bazalaki kotonga yango.
Soki otongeli Ngai etumbelo ya mabanga, okotonga yango te na mabanga oyo bakata ; pamba te soki okati yango, okobebisa bosantu na yango.
Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.
Kuna, bokotonga etumbelo ya mabanga mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokosalela ata esalelo moko te ya ebende.
Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani ; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino.