22 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi ; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka.
Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye.
Soki mobali abali mwasi oyo azali ndeko na ye mpo ete abotami na mama mosusu to tata mosusu, bongo asangisi na ye nzoto, ezali likambo ya soni. Bakolongola bango na miso ya bato na bango. Lokola mobali asambwisi ndeko na ye ya mwasi, akomema ngambo.