Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 27:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 27:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elingaki kokomama na ekomeli ya ebende, ya ebende oyo ya songe penza, mpo na kotobola makomi yango na mabanga mpo ete etikala wana mpo na libela.


Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika ; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni,


Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika ; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.


Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango,


Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna,


Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato : « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo.


Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino.


Mpe tango bokosilisa kokatisa Yordani, bokotelemisa mabanga yango na ngomba Ebali ndenge natindi bino yango lelo, mpe bokopakola yango pembe.


Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,


Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.


« Botambola kati na molako mpe boloba na bato : ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › »


Tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yawe alobaki na Jozue :


Jozue atongaki etumbelo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, na ngomba Ebali,


ndenge Moyize, mosali na Yawe, atindaki bana ya Isalaele. Atongaki yango kolanda makambo oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize : etumbelo etongama na mabanga oyo bakata na esalelo ya ebende te. Na likolo na yango, batiaki mbeka ya kotumba mpo na Yawe mpe babonzaki mbeka ya boyokani.


Na esika yango, na miso ya bana nyonso ya Isalaele, Jozue akomaki, na likolo ya mabanga, Mobeko oyo Moyize akomaki mpo na bana ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ