Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 27:19 - Mokanda na Bomoi

19 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 27:19
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.


Moto mabe azwaka kanyaka na nkuku mpo na kobebisa nzela ya bosembo.


Noki te soki bameli yango, bakobosana mibeko mpe bakokata na bosembo te makambo ya banyokolami.


Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te.


Boyoka maloba oyo, bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele, bino oyo bolingaka makambo ya sembo te mpe bobongolaka makambo ya alima,


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba.


Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ