Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 27:15 - Mokanda na Bomoi

15 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 27:15
44 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye.


Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te.


Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! »


Nzokande, libota yango mpe ya Yuda babatelaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bango, balandaki bizaleli oyo Isalaele akotisaki.


Mokonzi apanzaki mpe bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi, na ngambo ya loboko ya mobali ya ngomba ya Libebi, oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, atongaki mpo na Asitarite, nzambe mwasi ya makambo mabe ya bato ya Sidoni ; mpo na Kemoshi, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Amoni.


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Bato nyonso balobaki : « Amen ! » Mpe bakumisaki Yawe !


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.


Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai.


Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.


Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi, akomaka elilingi na ekomeli ya motane, asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi, abongisaka mondelo na yango na lime mpe apesaka yango lolenge ya moto, ndenge kaka moto azalaka kitoko, mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule.


Mpe na ndambo oyo etikali, oyo asalaki na yango nzambe, nzambe na ye ya ekeko, akofukamela yango mpe akosambela yango ; akosambela yango mpe akoloba : « Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai ! »


Moko te akanisaka, moko mpe te azalaka na boyebi mpe na mayele mpo na koloba : « Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto, nabelisaki mapa na makala na yango ya moto, natumbaki mosuni mpe naliaki yango. Bongo mpo na oyo etikali, nasala na yango penza likambo ya nkele boye ? Nafukamela penza mwa eteni ya nzete ? »


Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Tika ete alakelama mabe, moto oyo akotosa te malako ya boyokani


Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. » Nazongisaki : — Solo, Yawe ; amen !


« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye ? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » elobi Yawe.


Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu !


Mpo na yango, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Soki moto ya Isalaele atie motema epai ya banzambe ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo atie yango liboso na ye mpe akei epai ya mosakoli, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye kolanda motango ya banzambe na ye ya bikeko.


Basalaki lolendo mpo na kitoko mpe motuya ya biloko na bango ya monzele oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko mpe bililingi ya somo. Yango wana, nakokomisa biloko yango mbindo na miso na bango.


Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi ; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi.


Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.


Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’ Mwasi akozongisa : ‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’


Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.


Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi :


Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana.


Tango bokozala na bana mpe bakoko, mpe bokowumela tango molayi na mokili, soki bokosami mpe bosali ekeko ya lolenge nyonso, soki bosali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na bino, soki botumboli kanda na Ye,


Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.


Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.


Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. Mama na ye alobaki : — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango.


Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika.


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ