Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 27:14 - Mokanda na Bomoi

14 Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 27:14
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele.


Sima na yango, Jozue atangaki maloba nyonso ya Mobeko : mapamboli mpe bilakeli mabe kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ