12 « Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani : libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame.
Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame.
Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :