Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 27:1 - Mokanda na Bomoi

1 Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato : « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 27:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, napesi bino mokumba liboso ya Isalaele mobimba, ya lisanga ya Yawe, mpe liboso ya Nzambe na biso, oyo azali koyoka biso : Bosala keba mpo na kolanda mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bino, mpo ete bozwa mokili oyo ya kitoko mpe kotika yango lokola libula epai ya bakitani na bino mpo na libela.


mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe, babosana te misala ya Nzambe mpe babatela mibeko na Ye.


Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi.


bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo.


Lelo, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete osalela malamu bikateli mpe mibeko oyo ; batela yango malamu na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.


Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela ; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango.


Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe.


Batela malamu mibeko, mitindo mpe bikateli ya Yawe, Nzambe na yo, oyo apesi yo.


Moto oyo akweyi ata na mobeko moko kaka, atako atosaka mibeko nyonso, abuki nde mibeko nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ