Deteronomi 26:8 - Mokanda na Bomoi8 Yawe abimisaki biso na Ejipito na somo makasi, na bilembo minene mpe na bikamwa, na nzela ya loboko na Ye ya nguya mpe esembolama. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?