Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 26:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi bato ya Ejipito banyokolaki biso, bayokisaki biso pasi mpe bapesaki biso misala makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 26:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.


mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi : kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi.


« Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami ; soki azali mwana mobali, boboma ye ; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. »


Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »


Mokonzi moko ya sika, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito.


Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango : « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. »


Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango !


Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.


Bakoko na biso bakendeki na Ejipito mpe tokomaki kovanda kuna mibu ebele. Bato ya Ejipito banyokolaki biso elongo na bakoko na biso ;


Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso ;


Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ