Akoloba na Nganga-Nzambe oyo akozala na mosala na tango wana : « Natatoli lelo liboso ya Yawe, Nzambe na yo, ete nakomi na mokili oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na biso na nzela ya ndayi. »
Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo : « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga ; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele.