Deteronomi 26:2 - Mokanda na Bomoi2 moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino ; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,
Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule.