Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 25:9 - Mokanda na Bomoi

9 semeki yango akopusana pembeni na ye na miso ya bampaka, akolongola ye lokolo moko ya sandale, akobwakela ye soyi na elongi, mpe akoloba na ye : « Tala ndenge basengeli kosala moto oyo aboyi kotonga ndako ya ndeko na ye ya mobali. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 25:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazali koyina ngai mpe bakimi mosika na ngai, bazali na somo te ya kobwakela ngai soyi na elongi.


kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.


Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.


Yawe azongiselaki Moyize : — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi ; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo ? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.


Babwakelaki Ye soyi na elongi mpe babetaki Ye makofi ; bato mosusu babetaki Ye bambata


Bazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto.


Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.


bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.


azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.


Boye, kati na Isalaele, bakobanda kobenga bakitani ya moto wana « bana ya moto oyo balongola sandale. »


Boye, bampaka ya engumba wana bakobengisa mobali yango mpe bakoloba na ye. Soki akobi kaka koboya kobala semeki na ye,


Mosikoli alobaki : — Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ