Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te.
Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.
Tika Ngai kosala : nakobebisa bango mpe nakolimwisa bakombo na bango kati na mokili, kasi nakokomisa yo ekolo ya nguya mpe ya bato ebele koleka bango. »