Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 25:5 - Mokanda na Bomoi

5 Soki bandeko mibali bazali kovanda elongo, mpe moko kati na bango akufi kasi atiki mwana te, mwasi oyo akufisi mobali akoki te kobala na libota mosusu ; semeki na ye asengeli kozwa ye na libala mpo na kokokisa epai na ye mokumba ya kisemeki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 25:5
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye : « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te.


— Moteyi, Moyize alobaki : « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. »


— Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana.


— Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi : « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. »


Kasi Naomi azongiselaki bango : — Bana na ngai ya basi, bozonga na bandako na bino. Mpo na nini kolanda ngai ? Boni, nakoki lisusu kobota bana mibali oyo bakoki kozala mibali na bino ?


Boye, lekisa butu awa ; bongo lobi na tongo, tokotala soki moto yango akolinga kosikola yo. Soki akolinga, wana tika ye asikola yo ; kasi soki aboyi, nalaki yo na Kombo na Yawe ete ngai nakosikola yo. Boye liboso ete tongo etana, lala awa.


Pamba te oyebi malamu ete Boazi, oyo osalaki elongo na basali na ye ya basi, azali ndeko na biso. Na pokwa ya lelo, akoyungola orje oyo basilaki kosopa na etando.


Atunaki ye : — Yo ozali nani ? Azongisaki : — Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola.


Boazi alobaki : — Na mokolo oyo okosomba elanga na maboko ya Naomi, okozwa mpe Rite, moto ya Moabi, mwasi akufisa mobali ; mpo na kosala ete kombo ya mowei etikala na libula na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ