4 Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma.
Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye, kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te.
Pamba te basalelaka te mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka mpo na kobuka nijeli to bapine ya shar mpo na kobuka kumini ; basalelaka nde lingenda mpo na kobuka nijeli mpe kumini.
Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasi oyo babokola malamu, alingaka kobeta ble ; kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko. Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda, Yuda akobalola mabele, Jakobi akopanza-panza yango.