17 Bobosana te makambo oyo bato ya Amaleki basalaki bino tango bobimaki na Ejipito :
Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki. Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.
Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »
Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nakopesa bato ya Amaleki etumbu mpo na makambo oyo basalaki Isalaele tango bawutaki na Ejipito : bakangelaki Isalaele nzela.