14 Okoki te kozala na ndako na yo na bikolo mibale ekesana mpo na kotanga na yango biloko : moko ya monene mpe mosusu ya moke.
Okoki te kozala na bimekelo mibale ya kilo ekesana kati na saki na yo : moko eleki kilo mpe mosusu eleki pepele.
Osengeli kozala na bimekelo mpe bikolo ya kotangela ya malamu mpe ya sembo, mpo ete owumela mikolo ebele kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.