yoka wuta na Likolo ; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye, kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
Soki moto apesi moninga na ye ngombe to ane to meme to nyama mosusu mpo ete abokola, bongo nyama yango ekufi to ebukani to bayibi yango mpe ata moto moko te amoni mpo na kotatola ndenge nini likambo yango esalemaki,
kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.
Na tango ya matata, Banganga-Nzambe bakotelema lokola basambisi mpo na kokata makambo kolanda mibeko, bakotosa mibeko mpe bikateli na Ngai, bafeti na Ngai, oyo ekatama mpe bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo ?