Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 24:7 - Mokanda na Bomoi

7 Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 24:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

babotolaka ane ya mwana etike mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali ya mwasi oyo akufisi mobali ;


Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye, bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.


Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka.


Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.


Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo.


bosala ye ndenge akanaki kosala ndeko na ye. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino.


Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble : mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka.


mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,


eteni ya poso ya nzete oyo epesaka solo kitoko, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, malasi, mire, ansa, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, bashar, bawumbu mpe milimo ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ