Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali.
Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito.