21 Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali.
« Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu, likama ya ndenge nini ezali kozela yo ? Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te ? Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino ?
Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala.
Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape ; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali.