Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala.
Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba.