Nzokande, abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko, kati na buku ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
Moto oyo asali masumu, ye moko nde akokufa. Mwana akomema ngambo ya tata na ye te, mpe tata akomema ngambo ya mwana na ye te. Moto ya sembo akozwa litomba mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe akozwa etumbu mpo na mabe na ye.
Mokonzi asepelaki makasi mpe apesaki mitindo ete babimisa Daniele wuta na libulu. Boye, babimisaki Daniele wuta na libulu mpe bamonaki ata pota moko te na nzoto na ye, pamba te azalaki na elikya na Nzambe na ye.