15 Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.
Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.
« Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya bosembo te, mpe bashambre na ye ya etaje, na nzela ya lokuta ; oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba mpe afutaka bango eloko te ;
Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga ; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela ; mpo ete azala malamu pembeni na yo.
« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.