10 Soki odefisi eloko epai ya moninga na yo, kokota te na ndako na ye mpo na kozwa ndanga.
Ozalaki koluka na pamba ndanga epai ya bandeko na yo ya mibali, ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu,
pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala ? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa.
Okofingaka Nzambe te mpe okolakelaka mokambi ya bato na yo mabe te.
Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga.
Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga.