Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 23:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bakitani na bango, kobanda na molongo ya misato, nde bakoki kokota na lisanga ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 23:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozafati avandaki na Yelusalemi mpe atambolaki lisusu kati na bato longwa na Beri-Sheba kino na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe azongisaki bana ya Isalaele epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.


Ezali boye nde Ezekiasi asalaki kati na mokili na ye mobimba ya Yuda. Asalaki makambo ya malamu, ya sembo mpe ya solo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.


Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te : « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »


Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.


Tango bokotonga milako mpo na kobundisa banguna na bino, bozala mosika na eloko nyonso oyo ezali mbindo.


Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya.


Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu.


Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ