Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 23:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 23:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezawu alobaki na Jakobi : — Nalembi makasi ; tika ngai nalia elubu oyo, elubu oyo kaka. Yango wana bazalaki mpe kobenga ye Edomi.


Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito : bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi : bakitani na ye nyonso.


Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango.


Boye bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito, na Gosheni. Kuna bakomaki na bozwi ebele, babotaki bana mpe bakomaki ebele.


mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.


Rezoni azalaki monguna ya Isalaele na tango nyonso oyo Salomo azalaki na bokonzi. Wana Adadi azalaki kotia Isalaele mobulu, Rezoni akomaki mokonzi ya Siri mpe akomaki kokanela Isalaele.


Boye, bopesa te na libala bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali to bozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali. Tango nyonso, bosalaka te boyokani ya bondeko elongo na bango mpo ete bokoka kozala makasi, bokoka kolia bambuma malamu ya mokili mpe bokoka kotikela yango bana na bino lokola libula mpo na libela. ›


Bongo Isalaele akendeki na Ejipito ; mpe Jakobi avandaki lokola mopaya kati na mokili ya Cham.


Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.


Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya ; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.


Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


« Ngai, nalingaki bino, » elobi Yawe, « kasi bino bozali kotuna Ngai : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso ? › Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te ? » elobi Yawe, « Nzokande, nalingaki Jakobi,


Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki : — Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi : « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso.


Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.


Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ