Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango.
Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! » Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te : « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »
Na tina na bato ya Amoni : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te ? Atikali lisusu na bakitani ya libula te ? Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, abotoli bingumba ya Gadi ? Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi ?
Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.
Mosikoli alobaki : — Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango.