24 Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo.
« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi.