22 Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango ; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo.
Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe : « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo ?
« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.
Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te ; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa.
Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi.