Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 23:21 - Mokanda na Bomoi

21 Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te ; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 23:21
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba : « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata ;


Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo.


Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso,


asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.


Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.


pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?


Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.


Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.


Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka ; okosenga ye mileki te.


adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka loboko na ye mpo ete esala mabe te, akataka makambo ya bato mibale na bosembo ;


Babangaki mpe bayokaki somo makasi liboso ya Yawe ; babonzelaki Ye bambeka mpe bapesaki Ye bilaka.


Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga tina babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.


Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. ›


Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.


Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino.


Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.


Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango ; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo.


Boye Jonatan asalaki boyokani elongo na libota ya Davidi na maloba oyo : « Tika ete Yawe azongisa mabe na mabe na banguna ya Davidi ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ