Deteronomi 23:20 - Mokanda na Bomoi20 Okoki te kozwa mileki epai ya ndeko na yo tango odefisi ye mosolo, bilei to eloko mosusu oyo ekoki kobota mileki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bokoki kolia te nyama oyo bokuti ya kokufa ; bokopesa yango epai ya mopaya oyo azali kovanda kati na engumba na bino ; ye akoki na ye kolia yango ; soki te bokoki na bino koteka yango epai ya moleki nzela, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kolamba mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele.