10 Tango bokotonga milako mpo na kobundisa banguna na bino, bozala mosika na eloko nyonso oyo ezali mbindo.
Soki mobali abimi mayi ya mibali na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.
Soki mobali moko kati na bino azali mbindo, pamba te abimisaki mayi ya mibali na butu, asengeli kokende libanda ya molako mpe kovanda kuna.
Bakitani na bango, kobanda na molongo ya misato, nde bakoki kokota na lisanga ya Yawe.
Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu.